Lyrics

Tongo ya lelo, tongo ya makambo ima Moyi moboyi kobima lelo, tongo ya mokuya mama eh Tongo ya lelo, tongo ya makambo maman eh Ndoto nalotaki na butu, ndoto ya ba ndoki maman eh Tongo ya lelo, tongo ya makambo ima Dix ans de silence, lelo na loti yo lisusu-eh-eh Napekisaki yo ko kende, nalingaki té to kabwana Tala lelo ngo, ofingisi ngai na miso ya bato ya Kinshasa Na bondelaki yo mingi, ebongaki oyokela ngai Tala lelo oyo okomi ko nyiokuama, oh ngai nazali té Sango nazali koyoka balobi ngai mobali ya poison Ba zuzi ya nzela oh, bapesi ngai faute, likambo batuni té Sango nazali koyoka balobi ngai nazangi reconnaissance Ba zuzi ba nganda oh, bapesi ngai faute, likambo bayebi té Fololo na loboko kendé na lilita ya tata, osenga bolimbisi oboyaki kotosa maloba maye Soki bongo ebosani, bandeko to pé esali faute Nzoto mobimba eko futa faute ya bongo Pongi na kiti ya matanga bandeko, ndoto ndambo-ndambo Epayi bako yemba, epayi bako lela mama eh Mopépé mwa, pokua mwa moyi, mwa ebalé ya Zaïre Naboyi ememela ngai ngo, cherie oh, sango nayo ya mawa Mopépé mwa kaïna, mwa pokua, mwa moyi, mwa ebalé Naboyi ememela ngai ngo, chérie oh, sango nayo ya mitelengano Samedi ya lelo, samedi ya makambo maman Ngai naboyi ndé kobima, poso ya makambo ye ye eh Samedi ya lelo,samedi ya makambo maman Ndoto nalotaki, oh, ndoto ya makambo ye eh Poso ya lelo, poso ya makambo maman Dix ans de silence oh, lelo opesi nga raison nasé ya motéma ah Napekisa yo kokende nalingaki té tokabwana Tala lelo oh ekomi verre cassé sans réparation oh Nabondelaki yo mingi, ebongaki oyokela ngai Tala lel'oyo okomi koniokwama ngai nasi na bali, nasi na bali ye yo eh Sango esali nga pasi balobi ngai maboko makasi Babosani ba basi na monela yé, nazua souvenir té, kaka ba choc ya lamulu Nabondelaki yo mingi, nalobaki sé likambo moko Biso bikongenga na miso nionso pauni té eh Fololo na maboko, kendé na lilita ya tata Osenga bolimbisi, oboyaki koyoka maloba mayé ah Soki bongo ebosani, bandeko, to pé esali faute Nzoto mobimba eko futa faute ya bongo eh Pongi na kiti ya matanga, bandeko, ndoto ndambo-ndambo Epayi to koyemba, epayi tokolela, masiya ah-ah, ah-ah Mopépé mwa pokua, mwa moyi, mwa ebalé Naboyi ememela ngai oh, lolaka oyo ya sango nayo ya mawa ah Mopépé mwa pokua, mwa moyi, mwa ebalé Na sengi ememela ngai losambo na gai epaya nzambé eh, ah-ah-ah Lelo yo wana okomi na pasi Nga nazangi moyen na bikisa yo ata pé lokola tokabuana Nakolinga té nayoka yo na sango ya pasi eh Lelo yo wana na mbéto ya lopitalo Nga nazangi moyen naya kotala yo Epa natikala, nga nasi nabala Bako pesa ngai té, permission natala yo oh Sango nayoki, olingi ko kufa Ngai nazangi nguya nabikisa yo Napesi elikya sé na losambo Nalongoli maloba ya kanda nionso tolobanaka ah Lelo yo wana okomi na pasi Nga nazangi moyen na bikisa yo Ata pé lokola tokabuana nakolinga té na yoka yo na sango ya pasi eh Lelo yo wana na mbéto ya lopitalo Nga nzangi moyen naya kotala yo Epayi natikala ngai nasi nabala Bako pesa ngai té, permission natala yo Sango na yoki olingi kokufa Ngai nazangi nguya nabikisa yo Napesi elikya sé na losambo Nalongoli maloba ya kanda nionso tolobanaka Bato olandaki bakosiyo maman Mayi ya ebalé ekotcholaka ekonanaka té Bato ya mokili balingi eloko oyo basala Oyo ko basale té oh, bango ba kipaka té Ata ko tokabuani famille etikala Kasi ya koyoka yo na pasi, oh souci Oh Diyo lelo nazangi mosolo nabikisa yo Nafuta dokotolo, marabou na nganga kisi Natali sima molongo ya ba ndeko bazali ndé kolela Nazingi maboko ekomi verre cassé oh Miso miko ngenga pauni té eh Ata tokabuani, soki tokutani, topesanaka mbo'-oh, mboté Bato olandaki bakosiyo maman Mayi y'ebalé ekotcholaka ekonanaka té Bato ya mokili balingi eloko oyo basala Oyo ko basala té, oh bango ba kipaka té Ata ko tokuambuani famille etikala Kasi ya koyoka yo na pasi, oh soucis Oh Diyo lelo nazangi mosolo nabikisa yo Nafuta dokotolo, marabou na nganga kisi Natali sima molongo ya ba ndeko bazali ndé kolela Nazingi maboko, elikya sé na losambo Binso biko ngenga ngo pauni té Binso biko ngenga na miso, binso pauni té Dix ans de silence, lelo na loti yo lisusu Gina eh Binso biko ngenga ngo pauni té Binso biko ngenga na miso, binso pauni té
Lyrics powered by www.musixmatch.com
instagramSharePathic_arrow_out