Lyrics

Nabanga yo Yesu na nga Na tia na misala maloba na yo Kala mingi te Maranatha Nga nakozala wapi? Nabanga yo Yesu na nga Na tia na misala maloba na yo Po kala mingi te oza kozonga Nga nakozala wapi? Kobanga Nzambe ebandeli ya mayele Tina nina na wela bomengo ya se na moyi Bongo nabungisa molimo bomoyi na ngai Motema na ngai banga Nzambe Wana kelelo ekoyula Mokonzi atelemi na mapata Kokamata basantu balingami na ye Po bakota lola na noces de l'Agneau Nga nakozala wapi? Na ngambo ya mobali to pe na oyo ya muasi? Na sein d'Abraham to pe na??? Koyemba Hosanna to pe kati ya milelo Nga nakozala wapi? Nabanga yo Yesu na nga Na tia na misala maloba na yo Po kala mingi te Maranatha Nakozala wapi? Nabanga yo Yesu na nga Na tia na misala maloba na yo Papa kala mingi te oza kozonga Nga nakozala wapi? Namona moto azobanga ekobo akanisi abangi Nzambe Nzoka azobanga na ye nde sida Sida bokono ya pamba ebomaka kaka nzoto Bongo oyo ebomaka nzoto na molimo to tie wapi? Bikela coutume na ba familles na ba Kristu batosaka Kasi liloba na Nzambe to fouler aux pieds Yesu na mitema azalaka lisusu te Lelo ye wana na ekuke ya motema na yo azobeta Naza mpunda ya pamba namemi yo Mokonzi Ata ko maputa batandi nga nde nazoniata Papa lokumu eza elamba na taille na yo moko Yo okabola yango na nani Yahwe? Nayebi en terme de gloire olingaka kaka 100% 98% te, 99 pe te Papa lokumu eza elamba na taille na yo moko Motema na ngai yeba yango Wana kelelo ekobeta Mobali atelemi na mapata Kokamata eklezia muasi na ye Po akota lola bipayi azali Nga nakozala wapi? Mosantu na lingi yo Ngai naponi kotambola na yo Ata liwa ememi nga lelo oyo Elikya ezali nakomona yo eh Yesu eeh Yesu Nkolo na nga nandimi kotambola na yo Yesu ehh Yesu Yaya na nga mbamba na yo kino okoya Yesu ehh Yesu Nkolo na nga nandimi kotambola na yo CH: Yesu ehh Yesu L: Papa posa na ngai ezali namona yo face à face CH: Yesu ehh Yesu L: Wana yo na loboko ya mobali Papa ngai na makolo na yo CH: Yesu ehh Yesu L: Papa, nzela eza molayi nzela eza molayi, nga moko nakokoka te CH: Yesu ehh Yesu L: Nkolo sunga nga nabatela bonzambe oyo otie kati na nga Yesu CH: Yesu ehh Yesu L: Papa simba nga loboko Yesu totambola elongo nakota na mboka na elaka CH: Yesu ehh Yesu L: Yesu, Yesu Makanisi se kobanza Elaka na yo Maranatha Miso na nga likolo Na elikya yo okozonga Mosantu na banga te Nasimbi se elikya Nayebi y'oza na nzela Po yo omema nga epayi ya Papa CH: Yesu ehh Yesu L: Yesu na ngai, Yesu na ngai, Yesu CH: Yesu ehh Yesu L: Nakota loge te, nazangisa yo sima... CH: Yesu ehh Yesu L: Yesu, pawuni na nga ya talo, Yesu na ngai Mosantu na lingi yo Ngai naponi kotambola na yo Ata liwa ememi nga lelo oyo Elikya ezali nakomona yo eh
Writer(s): Mike Kalambay Lyrics powered by www.musixmatch.com
Get up to 2 months free of Apple Music
instagramSharePathic_arrow_out