Lyrics

Bolingo na yo Yaweh eeh Elekeli mayele na nga Elekeli mabanzo na ngayi Eleki nionso na vie na nga Soki na kanisi papa, esika y'olokota nga P'esika na koma lelo yo O bombi nga na maboko na yo Schilo eh, eh Yaweh eh Papa oyo na bengaka Aba O komisi ngayi muana na yo O pesa nga valeur moto akoki kopesa ngayi té Eeh Yaweh eeh Tango o tangisi makila na Golgotha O lobi que "tout est accompli" Quelle preuve d'amour et moi Et moi je veux le sang de l'agneau Je veux la vie de mon sauveur Tika na kangama na yo Na wumela esika y'ozali Car là dans notre intimité Tu me révèle qui tu es Tu continues de déversé sur moi Et me voici merité eeh Oooh Nayebi eté o tambolaka na nga aah Mobongisi nzela Elombe na nga, tika na kangama Ata soki lelo'yo moyi eboyi ko bima Molili ezipi mokili mobimba Nayebi eté ozalaka mwinda ya bomoyi na nga aah Nayebi eté ozalaka mwinda ya bomoyi na nga aah Ata soki bikuké ya lola ekangami Mbula eboyi ko beta na mokili Nayebi eté ozalaka mayi ya lobiko ooh, oooh Nayebi eté ozalaka mayi ya lobiko ooh Ata soki lelo mikili eleki Sur la terre temps esili Nayebi eté mon éternité se trouve en toi (mon éternité se trouve en toi) Nayebi eté mon éternité se trouve en toi (yango wana na kangami) Yango na kangami, na kangami, na kangami Na kangami na yo, nako tika yo jamais Ngayi na kotika yo jamais (na kangami na yo, na kotika yo jamais) Yango wana na kangami Yango na kangami, na kangami, na kangami Na kangami na yo, nako tika yo jamais Ngayi nako tika yo jamais (na kangami na yo, na kotika yo jamais) Ata soki lelo lolemo ekangami Liloba eboyi ko bima nga na monoko Nayebi eté yo ndé moyoki ya motema aah Yo ndé moyoki ya motema yaya (nayebi eté yo ndé moyoki ya motema aah) Ata soki lelo'yo nakutani na Mer Rouge Terre promise eza na ngambo liboso Nayebi eté ozalaka Nzambé a kabolaka mayi Yo ndé okabolaka mayi (nayebi eté ozalaka nzambé, a kabolaka mayi) Ata soki nation mobimba ekoki kolia té Nga nako banga eloko té Nayebi eté ozalaka sekelé ya elonga na nga aah (yo ndé sekelé ya elonga na nga) Nayebi eté ozalaka sekelé ya elonga na nga aah Sekelé, sekelé, sekelé (nayebi eté ozalaka sekelé ya elonga na nga aah) Yo ndé sekelé ya elonga na nga aah (nayebi eté ozalaka sekelé ya elonga na nga aah) Sekelé, sekelé, sekelé (nayebi eté ozalaka sekelé ya elonga na nga aah) Bo binaka wapi Yo, yo nga na kangami Yango na kangami, na kangami, na kangami Na kangani na yo, na kotika yo jamais eeeh Ngayi nako tika yo té Yaweh (na kangami na yo, nako tika yo jamais) Tika nga na kangama na yo Yango na kangami, na kangami, na kangami Na kangami na yo, nako tika yo jamais Libela, libela, libela (na kangami na yo, nako tika yo jamais)
Writer(s): Rica Yala Lyrics powered by www.musixmatch.com
Get up to 2 months free of Apple Music
instagramSharePathic_arrow_out