Top Songs By Wenge BCBG Les Anges Adorables
Credits
PERFORMING ARTISTS
Wenge BCBG Les Anges Adorables
Performer
COMPOSITION & LYRICS
JB Mpiana
Songwriter
Lyrics
Omba nasali nyonso,
Oyo mobali ya solo asalaka soki alingi to akomi zoba na bolingo oh o
Kasi baboti no ba boyi yanga nayo to kwelana
Pona zali moto ya région mosusu eh
Na sali ba carêmes na groupe de prière
Na komi frère en Christ po na yo Omba
Kasi patience ezangi ngaï
Pona landaki se profit
Lokola eh wumeli
Omba nakomi luka mambu eh
Na tali gauche,
Droite likolo pe na se, na moni nani te oyo ako yambela ngaï
Mokumba pe mozindo ya bolingo na memi
Ko bomba eza mabé
Omba na komi zoba zoba
Omba nasali nyonso,
Oyo mobali ya solo asalaka soki alingi to akomi zoba na bolingo oh o
Kasi baboti no baboyi ya nga nayo to kwelana
Pona zali moto ya région mosusu eh
Na sali ba carêmes na groupe de prière
Na komi frère en Christ po na yo Omba
Kasi patience ezangi ngai
Pona landaki se beauté
Lokola eh wumeli
Omba nakomi luka mambu eh
Na tali gauche,
Droite likolo pe na se, na moni nani te oyo ako yambela ngaï
Mokumba pe mozindo ya bolingo na memi
Kobomba eza mabé
Yango na komi zoba zoba hum
Omba soki ya nga na yo ezali se ya maloba
Na sengi otika motema na yo polélé
Jour ango naya na ngaï lokola moyibi eh
Na ya kolala na kati ya motema na yo
Na zwa pongi na banda kutu na ko ronfler
Kino kolo ebonga akoya akuta ngaï eh
Ayoka somo akima atikela nga Omba ah, Omba ah
Omba soki ya nga na yo ezali se ya maloba
Na sengi otika porte ya motema polélé
Jour ango naya na ngaï lokola kilawu eh
Bongo to lya lipati ya bengengi na sanza
Tango Kolo ebonga akoya akuta biso
Ayoka somo atika yo po na infidélité
Na profité ba balisa nga yo na makasi Omba, lipasa ya Sharon
Meka ko tuna na papa to na mama
Ndégé nini bango basala po ba zala unis
Ba ko yebisa yo surement kaka patience
Yango ezali la clef d'or de toute réussite
Mingi ba nyokwama basusu ba betama
Mingi ba fingama basusu pe ba nyokwama
Pour quoi yo olingi tosala nga na yo bongo te chérie, Omba ah
Simone de Beauvoir alobaki na livre na yé
Quand la pauvreté entre par la porte Omba
L'amour s'enfuit par la fenêtre na ndimi yango
Soki na zalaki lokola Adam BOMBOLE
Soki na zalaki lokola André KIMBUTA
Soki na zalaki lokola Président Patchéli
Mbe na tongela yo chateau na ville ya MONACO
Na tia ba gardes du corps ko fongola kaka na maboko
Ko kota té ko bima té kaka nga moko
Na tondisa provision na kati ya ndako yango
Ko kota té ko bima té
Wana na kozala n'assurance
Yo zali wa nga
Omba soki bolingo ango eza ya liyoto eh
Na ndimi kasi ezala ya kolya na monoko
Ya banga té, si non et ko pesa biso mposa té
Kala kala ba jeunes filles bazalaki kosala
Soki asi atingami na moto na yé eh
Et que ba parents ba pekisi yé a ko silika
A ko menacé komela kutu na poison eh
Kino ba tika yé asala choix na yé na malembé,
Omba ah, Omba ah Omba ah, Omba ah Omba eh
Writer(s): Jb Mpiana
Lyrics powered by www.musixmatch.com