Music Video
Upcoming Concerts for Ferre Gola
Top Songs By Ferre Gola
Credits
PERFORMING ARTISTS
Ferre Gola
Performer
COMPOSITION & LYRICS
GOLA BATARINGE
Composer
PRODUCTION & ENGINEERING
GOLA BATARINGE
Producer
Lyrics
Dynastie, esprit d'équipe
Double taux, Toto Tshibula
Toto, un soleil qui se lève tôt
Yaka près o sécher ba larmes na nga
Longola nga na bolingo ya tantôt plutôt
Nakota château ya amour na yo eh
Double taux bimisa ngayi na ghetto
Ya ba chagrins oyo ezo zua nga moto
Po photo n'o ya pamba enokisaka mvula ya esengo
Ebongo présence n'o eleki gâteau
Toto égale double taux
Doubler pé ba sentiments na nga To
Multiplié bolingo, Elvie Chouga eeh
Likonga oyo ebomaka té ezali oyo ya montre
Kasi soki y'o meli tangu eko boma ngayi eh
Toto na leli-leli pardon ko betisa ngayi poto té oh
Soki embouteillage, Toto, zwa ata moto
Kota noki mbango, Fanya star ako tikala té
Na ba soucis na yo eh, yaka Yasmine Mianda
Double taux Toto
Maboko na yo centre ya retrouvaille
Ya ba bilengi nioso ya mokili oh
Géant homme admirable
Ombre na yo etikalaka na retard ya deux pas
Po elula sé comment oza costaud, Toto mema nga na bateau
Surtout que na bonzela yo motéma na plateau d'amour
Ko tshuba ngo té couteau, Tshibula Rock Star Doll (star)
Maman bo sala tout
Bo convaincre Tshibula
Aya po malade na nga esila (bolingo ya Toto)
Carence na ba tendresses na yé, eboteli nga ba stress
Po na bika ezo senga (bolingo ya Toto)
Pinzoli etangi mingi, bo benga yé kaka
Boko mona nakoseka (bolingo ya Toto)
Ah, bolingo ya Toto
Bolingo ya Toto Tshibula
Ekitisa ngayi taux ya ba pensés (bolingo ya Toto)
Mi Bel-Ange Onyema osala tout o convaincre Tshibula
Aya po malade na nga esila (bolingo ya Toto)
Carence ya ba tendresses na ye, eboteli nga ba stress
Po na bika ezo senga (bolingo ya Toto)
Pinzoli etangi mingi, Orly Gola, bo benga yé
Boko mona na ko seka (bolingo ya Toto)
Aah, bolingo ya Toto
Bolingo ya Toto Tshibula, ekitisa ngayi taux ya soucis (bolingo ya Toto)
Motéma na nga e joua rôle ya Judas
Eteka mobimba na nga epa na yo, na prix ya baiser
Toto, charisme na yo ekakoli lolendo na ngayi
Toto, regard na yo, e soldé ki bomuasi na ngayi eh
Double, ebalé ememaka masuwa ya kilo
Kasi ezo koka té ko mema libanga ya moke
Ko sous-estimer té regret na nga
Parfois nzoto e supportaka makofi, Toto
Mais soucis ya bolingo neti liseki, moto awé na yé oh
Naza té mbisi ya fleuve, yé akutaka bileyi ezo zela yé
Nga nazali mbisi ya aquarium
Opimi nga bileyi, okabeli nga ndé liwa eeh
Nazanga na nga nionso
Kasi bolingo na yo té, Toto
Épargner marteau ya ba soucis eboma nga
La paix durable nako zua ngo epa na yo, oh
Double taux soki olingi na botama lisusu
Promettre nga ke mobali oyo nako mona
Eko zala na ngo sé yo, Toto
Noki natikala mamelo, Toto
Yo ndé amour na nga
Double taux soki olingi na botama lisusu
Promettre nga que mobali oyo nako mona
Eko zala na ngo sé yo, Toto
Noki natikala mamelo, Toto
Yo ndé amour na nga
Double Taux Toto Tshibula
Double taux soki olingi na botama lisusu
Promettre nga que mobali oyo nako mona
Eko zala na ngo sé yo, Toto
Noki natikala mamelo, Toto
Yo ndé amour na nga
Double taux soki olingi na botama lisusu
Promettre nga que mobali oyo nako mona
Eko zala na ngo sé yo, Toto
Noki natikala mamelo, Toto
Yo ndé amour na nga
Double Taux Toto Tshibula
Writer(s): Gola Bataringe
Lyrics powered by www.musixmatch.com