Lyrics

Ah, bolingo ekabwani Bilobela ya pamba Okamati mokano O décider toboyana Betito, mon amour Bolingo esili Ennemi na motema na yo Ngai wa yo Oyo obetelaki tolo Bolingo tolinganaki na sé ya kwiti Lel'oyo tokabwana Bato bakamwe Lokito eleli, mabele ekoningana Bayini bako nzemba, bapiki dalapo Ngai wa yo na bwale Nakolela Papa ya bana akeyi na ye Nga Azanga, nabeleli yo ozonga Papa ya bana na nga Ezalaki soki toko leka na nzela Bana mike, bakolo na sima Bako kumisa biso Mbote ya pamba opesaka nga mokolo ya liboso Etambwisaki nga moto Na kamwe lelo tokabwana Ata ko nasalaki mabe Ebongaki olimbisa nga Yango nini Yango nini Eloko yango nini okangeli nga kanda na motema Ben Betito wa ngai, mon amour Ben Betito wa ngai, naleli yo Bolingo namipesaki, lel'oyo tokabwana Somo esali nga Nazoki na motema Naleli pe nandimi, lel'oyo bolingo Etumbu ango ya Nzambe Ben Betito wa ngai, mon amour Ben Betito wa ngai, naleli yo Betito mobali na ngai Na banzaki tokabwani eh Na maloba ya pamba Vraiment nabondeli yo mingi Po toboyana te Ya ngai mabanzo epayi na yo Nakotikala lokola Pata azanga mokengeli Betito mobali na ngai Na banzaki tokabwani eh Na maloba ya pamba Vraiment nabondeli yo mingi Po toboyana te Ya ngai mabanzo epayi na yo Nakotikala lokola Pata azanga mokengeli Awa y'okokende Nani ako sala entretien n'elanga tolona Betito eh Elanga ya vino sukali nakobuka Bwale ngai namoni Betito, ngai pe nalingaka yo Betito mobali na ngai Na banzaki tokabwani eh Na maloba ya pamba Vraiment nabondeli yo mingi Po toboyana te Ya ngai mabanzo epayi na yo Nakotikala lokola Pata azanga mokengeli Osala nyoso pamba Yeba nga nakotika yo te Mobali na ngai Nabetaki tolo na kombo na yo pamba Lel'oyo ngai nasuki Nga Azanga. nabeleli yo Ozonga, ozonga Betito mobali na ngai Na banzaki tokabwani eh Na maloba ya pamba Vraiment nabondeli yo mingi Po toboyana te Ya ngai mabanzo epayi na yo Nakotikala lokola Pata azanga mokengeli Bapanzi sango kake ekweyi na mboka Ah, ngai nasambwe Pasi ya pamba Bethy Natingama to nabenda nzoto Papa ngo bolingo eleki Yango nini y'oko niokolo nga boye Betito mobali na ngai Na banzaki tokabwani eh Na maloba ya pamba Vraiment nabondeli yo mingi Po toboyana te Ya ngai mabanzo epayi na yo Nakotikala lokola Pata azanga mokengeli Betito mobali na ngai Na banzaki tokabwani eh Na maloba ya pamba Vraiment nabondeli yo mingi Po toboyana te Ya ngai mabanzo epayi na yo Nakotikala lokola Pata azanga mokengeli
Writer(s): Zaiko Lyrics powered by www.musixmatch.com
instagramSharePathic_arrow_out